5
Mokonzi akobotama na Beteleemi 
 1 Bongo yo, Beteleemi Efrata, 
atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, 
ye oyo akokonza Isalaele 
akowuta kati na yo. 
Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, 
wuta na ebandeli ya tango. 
 2 Yango wana, Yawe akosundola Isalaele 
kino tango mwasi oyo azali 
na pasi ya kobota akobota, 
mpe ndambo ya bandeko na ye, 
oyo bakotikala bakozonga 
epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele. 
 3 Akotelema mpe akobatela bibwele na ye 
na nguya na Yawe, 
na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ; 
mpe bakovanda na kimia, 
pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye 
ekopanzana mokili mobimba. 
 4 Boye, akozala kimia na bango ! 
Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi 
kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, 
oyo batonga makasi, 
tokotindela bango babateli sambo ya bibwele 
mpe bakambi mwambe ya bato 
mpo na kobundisa bango. 
 5 Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. 
Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri 
tango bakokota na makasi na mabele na biso 
mpe na bandelo na yango. 
 6 Batikali ya Jakobi bakozala, 
kati na bikolo ebele lokola mamwe 
oyo ewuti epai na Yawe, 
mpe na likolo ya matiti lokola londende 
oyo ekweyaka na makasi ya moto te 
to mpe etalelaka moto te. 
 7 Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, 
na kati-kati ya bikolo ebele, 
lokola nkosi kati na banyama ya zamba, 
lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : 
tango elekaka kati na etonga ya bameme, 
ekangaka mpe epasolaka yango, 
mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te. 
 8 Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, 
mpe bayini na yo nyonso babebisama nye ! 
 9 « Na mokolo wana, » elobi Yawe, 
« nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo, 
 10 nakobebisa bingumba ya mokili na yo 
mpe nakokweyisa bandako na yo, 
oyo batonga makasi ; 
 11 nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki, 
mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ; 
 12 nakobebisa banzambe ya bikeko 
oyo ezali kati na yo, 
mpe okofukamela lisusu te bikeko 
oyo maboko na yo esilaki kosala ; 
 13 nakobebisa makonzi ya bule 
ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo 
mpe nakobebisa bingumba na yo. 
 14 Na kanda na Ngai ya makasi, 
nakozongisa mabe na mabe na bikolo 
oyo etosaki Ngai te. »