6
Yawe afundi bato na Ye 
 1 Boyoka makambo oyo Yawe alobi : 
« Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, 
mpe tika ete bangomba mikuse eyoka 
makambo oyo ozali koloba ! 
 2 Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, 
boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, 
pamba te azwi bango na likambo 
mpe alingi kosamba na Isalaele. 
 3 Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini ? 
Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini ? 
 4 Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito 
to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? 
Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino 
Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ? 
 5 Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo 
oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, 
mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, 
azongiselaki ye. 
Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki 
longwa na Sitimi kino na Giligali 
mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. » 
 6 Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe 
mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? 
Boni, tomema bambeka ya kotumba 
to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ? 
 7 Yawe akosepela solo 
soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali 
to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? 
Boni, topesa solo bana na biso ya liboso 
mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? 
Boni, topesa bana na biso ya mibali 
oyo bawuti na mikongo na biso 
mpo ete akoka kolongola masumu na biso ? 
 8 Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. 
Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : 
Tambola na bosembo, 
linga boboto mpe tambola 
elongo na Nzambe na yo na komikitisa. 
Isalaele akweyisami 
 9 Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! 
Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. 
Boyoka sango ya etumbu na bino 
na monoko na Ye oyo atindi yango ! 
 10 Oh libota ya mobulu, 
boni, nasepela penza komona bomengo na bino, 
oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, 
Efa* Efa ezali emekelo ya biloko lokola fufu to masango ; tokoki ata komona yango lokola sakombi. ekoka te oyo elakelama mabe ? 
 11 Boni, nazanga penza kopesa etumbu 
epai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta, 
mpe oyo azali na libenga etonda 
na bimekelo kilo ya lokuta ? 
 12 Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, 
bato ya libota oyo batondi na lokuta, 
mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa. 
 13 Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi 
mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo. 
 14 Okolia, kasi okotonda te, 
pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo. 
Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te, 
pamba te nakokaba yango na mopanga. 
 15 Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; 
okokamola bambuma ya olive, 
kasi okomipakola mafuta na yango te ; 
okokamola bambuma ya vino, 
kasi okomela masanga na yango te. 
 16 Lokola obatelaki malako ya Omiri 
mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, 
nakokaba yo mpo ete obebisama, 
nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; 
bongo bokolata soni ya libota na Ngai.