4
Bokonzi ya Nzambe kati na Siona 
 1 Na mikolo oyo ekoya, 
ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi 
na songe ya bangomba, 
ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, 
mpe bikolo ekokende kotondana kuna. 
 2 Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : 
« Boya, tomata na ngomba ya Yawe, 
na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi ! 
Akoteya biso banzela na Ye 
mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » 
Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, 
mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi. 
 3 Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, 
akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, 
ezala oyo ezalaka mosika. 
Bakotumba mipanga na bango na moto 
mpo na kosala bakongo, 
mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. 
Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga 
mpo na kobundisa ekolo mosusu, 
bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba. 
 4 Moto nyonso akovanda na kimia 
kati na bilanga na ye ya vino 
mpe na se ya nzete na ye ya figi. 
Moto moko te akobangisa ye, 
pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi. 
 5 Ekolo na ekolo ekotambola 
na kombo ya nzambe na yango, 
kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe 
oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela. 
Mabongisi ya Yawe 
 6 « Na mokolo yango, » elobi Yawe, 
« Nakosangisa libota na Ngai, 
oyo ezali kotambola tengu-tengu ; 
nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai, 
mpe oyo natiaki pasi likolo na yango. 
 7 Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu 
ekoma batikali, 
mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai, 
libota ya nguya. 
Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona, 
kobanda na mokolo yango kino libela na libela. 
 8 Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, 
ngomba ya Siona, mboka kitoko, 
bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, 
bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. » 
 9 Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ? 
Boni, ozali lisusu na mokonzi te ? 
Boni, mopesi toli na yo asili kokufa 
mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi 
oyo azali na pasi ya kobota ? 
 10 Oh Siona, mboka kitoko, 
lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! 
Pamba te sik’oyo, okobima na engumba 
mpe okovanda kati na zamba, 
okokende kino na Babiloni ; 
mpe kuna, Yawe akokangola yo 
na maboko ya monguna na yo. 
 11 Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani 
mpo na kotelemela yo ; 
bazali koloba : 
« Tika ete bosantu ya Siona esambwa 
mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! » 
 12 Kasi bayebi makanisi na Yawe te 
mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, 
Ye oyo asangisaki bango 
lokola maboke ya matiti ya ble na etando 
oyo batutelaka yango. 
 13 Oh Siona, mboka kitoko, 
telema mpe tuta ble, 
pamba te nakopesa yo maseke ya bibende 
mpe basapato ya bronze, 
bongo okobuka bikolo ebele mike-mike 
mpe okopesa bomengo na bango, 
oyo bazwaki na nzela ya mabe, 
lokola likabo epai na Yawe, 
mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba. 
 14 Oh engumba oyo elinga bitumba, 
sangisa basoda na yo, 
pamba te bazingeli biso ! 
Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.