3
Masumu ya bakambi 
 1 Boye, nalobaki : 
« Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, 
bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! 
Ezali bino te bato bosengeli 
koyeba malamu mibeko ? 
 2 Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu 
mpe bozali kolinga mabe. 
Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, 
bozali kolongola misuni na bango 
mpe kobuka mikuwa na bango. 
 3 Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, 
bozali kolongola bango poso ya nzoto 
mpe kobuka mikuwa na bango. 
Bozali kokata bango mike-mike 
lokola misuni oyo bakalingaka 
to oyo batokisaka na nzungu. » 
 4 Yango wana, tango bakobelela Yawe, 
akoyanola bango te. 
Na tango wana, akobombela bango elongi na Ye 
likolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki. 
 5 Tala liloba oyo Yawe alobi 
mpo na kotelemela basakoli ya lokuta 
oyo babungisaka bato na ngai nzela : 
« Soki bapesi bango eloko ya kolia, 
basakolaka kimia ; 
soki bapesi bango te eloko ya kolia, 
basakolaka bitumba. 
 6 Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. 
Soki bapesi bango te eloko ya kolia, 
molili ekozingela bino 
mpe bokokoka lisusu kosakola te ! 
Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, 
mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango. 
 7 Bamoni makambo bakotonda na soni, 
mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. 
Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, 
pamba te Nzambe akoyanola bango te. » 
 8 Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, 
natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko 
mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi 
mpe lisumu ya Isalaele. 
 9 Boyoka maloba oyo, 
bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, 
bino oyo bolingaka makambo ya sembo te 
mpe bobongolaka makambo ya alima, 
 10 bino oyo botongaka Siona na kosopa makila, 
mpe Yelusalemi na kosalaka makambo mabe. 
 11 Bakambi na yango basengaka kanyaka 
liboso ya kokata makambo, 
Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo 
liboso ya koteya, 
mpe basakoli na yango basengaka mbongo 
liboso ya kosakola. 
Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe 
tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? 
Pasi ekoki kokomela biso te ! » 
 12 Yango wana, likolo na bino, 
bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. 
Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, 
mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo 
ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.