2
Mabongisi ya moto mpe mabongisi ya Nzambe 
 1 Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, 
oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! 
Bakokisaka yango na tongo, 
pamba te bazali na makoki ya kosala yango. 
 2 Soki baluli bilanga ya moto, 
bazwaka yango na makasi ; 
soki baluli ndako ya moto, 
babotolaka yango ; 
bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako 
mpe babotolaka moto libula na ye. 
 3 Mpo na yango, Yawe alobi : 
« Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo : 
ekozala pasi moko oyo bakokoka 
komibikisa na yango te. 
Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, 
pamba te ekozala tango ya pasi makasi. 
 4 Na mokolo wana, 
bakosambwisa bino ; 
mpo na kotiola bino, 
bakobanda koyembela bino banzembo oyo : 
‹ Tobebisami penza mobimba ! 
Libula ya bato na ngai ekabwani ! 
Abotoli yango na maboko na ngai 
mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › » 
 5 Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe 
mpo na kokabola mabele na zeke. 
Basakoli ya lokuta 
 6 Basakoli na bango bazalaki koloba : 
« Kosakola te, kosakola makambo ya boye te ! 
Pasi ekokomela biso te. » 
 7 Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye 
esengeli solo kolobama ? 
« Boni, Molimo na Yawe atomboki 
mpo ete asala makambo ya boye ? 
Maloba na Ye ezali ya boboto te 
mpo na moto oyo atambolaka alima ? » 
 8 Na mikolo eleki, 
bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. 
Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia 
bilamba ya talo na mawa te, 
lokola bato oyo bawuti bitumba ; 
 9 bobenganaki basi ya bato na ngai 
longwa na bandako na bango ya kitoko, 
bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai 
kati na bana na bango. 
 10 Botelema mpe bokende ! 
Awa ezali esika na bino ya kopema te, 
pamba te ezali mbindo, 
ebebisami makasi penza, 
mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te. 
 11 Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba : 
« Nakosakola mpo na yo ; » 
bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino 
to ya masanga mosusu ya makasi, 
moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli 
ya bato ya lolenge na ye. 
Nzambe asangisaka 
 12 Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, 
nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. 
Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, 
lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. 
Makelele oyo ekoyokana kuna 
ekozala makelele ya bato ebele. 
 13 Moto oyo apasolaka nzela 
akotambola liboso na bango. 
Bakolekela na nzela oyo bapasoli, 
bakolekela na nzela ya ekuke 
mpe bakobimela na nzela yango. 
Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, 
Yawe akozala liboso na bango.