Nzembo 109
Nzambe, kovanda lisusu kimia te 
 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 
Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, 
kovanda kimia te ! 
 2 Bato mabe bazali koloba lokuta 
mpo na kofunda ngai, 
bazali mpe kokosela ngai makambo. 
 3 Bazingeli ngai na maloba ya koyina 
mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba. 
 4 Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, 
kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli. 
 5 Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, 
mpe koyina na bolingo. 
 6 Kaba ye na maboko ya moto mabe ! 
Bimisela ye monguna, 
na ngambo ya loboko na ye ya mobali ! 
 7 Tika ete bazwa ye lokola moto mabe 
na tango ya kosamba, 
mpe libondeli na ye etangama lokola masumu ! 
 8 Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, 
tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! 
 9 Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, 
mpe tika ete mwasi na ye akoma 
mwasi akufisa mobali ! 
 10 Tika ete bana na ye batelengana 
mpe bakoma bisengasenga, 
tika ete bakende kosenga mosika 
ya ndako na bango oyo ebukana-bukana ! 
 11 Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo 
akanga ye biloko nyonso, 
mpe tika ete bapaya babotola ye 
bambuma ya mosala na ye ! 
 12 Tika ete moko te atalisa ye bolingo, 
tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa ! 
 13 Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, 
mpe bakombo na bango elongwa 
na ekeke oyo ezali kolanda ! 
 14 Tika ete Yawe alandela 
masumu ya batata na ye 
mpe alimbisa te masumu ya mama na ye ! 
 15 Tika ete Yawe akanisaka 
masumu yango tango nyonso 
mpe asala ete babosana bango libela na mokili ! 
 16 Lokola atikalaki te kotambola na boboto, 
mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa 
kino kobomisa moto oyo azoka na motema ; 
 17 lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, 
tika ete bilakeli mabe ekweyela ye ! 
Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, 
tika ete mapamboli ezala mosika na ye ! 
 18 Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, 
tika ete ekota kati na ye lokola mayi, 
mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta ! 
 19 Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba 
oyo alati, 
mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba 
mpo na tango nyonso ! 
 20 Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai 
mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai. 
 21 Kasi Yo Nkolo Yawe, 
salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, 
kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo. 
 22 Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, 
mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai. 
 23 Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa ; 
bazali kobengana ngai lokola mabanki. 
 24 Mabolongo na ngai elembi 
mpo na kokila mingi bilei, 
nzoto na ngai mpe ebukani 
mpo ete nakondi makasi. 
 25 Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele ; 
soki kaka bamoni ngai, baningisi mito. 
 26 Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai ; 
bikisa ngai kolanda bolingo na Yo ! 
 27 Tika ete banguna na ngai bayeba 
ete Yo Yawe nde osalaki bongo. 
 28 Ata balakeli ngai mabe, 
Yo okopambola ngai ; 
soki mpe bameki kotelema 
mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. 
Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala 
moto ya esengo. 
 29 Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu 
mpe bamizipa na soni lokola kazaka. 
 30 Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, 
nakokumisa Ye kati na ebele ya bato. 
 31 Pamba te atelemaka na ngambo 
ya loboko ya mobali ya mobola 
mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato 
oyo bakatela ye etumbu.