Nzembo 102
Libondeli ya moto na pasi 
 1 Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe. 
 2 Yawe, yoka libondeli na ngai ! 
Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo ! 
 3 Kobombela ngai elongi na Yo te, 
wana nazali na pasi. 
Yoka libondeli na ngai 
na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; 
yanola ngai noki ! 
 4 Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa 
lokola molinga, 
mikuwa na ngai ezali kozika 
lokola makala ya moto. 
 5 Motema na ngai ebungisi elikya 
mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ; 
mpo na yango, nakomi ata kobosana 
kolia bilei na ngai. 
 6 Mpo ete naleli makasi, 
natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa. 
 7 Nakomi lokola esulungutu ya esobe, 
lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba. 
 8 Pongi ekimi ngai ; 
nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko 
na likolo ya ndako. 
 9 Banguna na ngai batombokeli ngai, 
bazali kofinga ngai tango nyonso 
mpe bazali kosalela kombo na ngai 
mpo na kolakela bato mabe. 
 10 Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, 
mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai. 
 11 Mpo na kanda monene na Yo, 
otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika. 
 12 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, 
mpe nakawuki lokola matiti. 
 13 Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi 
mpo na libela, 
ozali Nzambe seko na seko. 
 14 Okotelema solo mpo na Siona, 
pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ; 
tango oyo ekatama ekoki. 
 15 Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka 
na mabanga na yango, 
mpe toyokelaka putulu na yango mawa. 
 16 Bikolo ekotosa Yawe, 
mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima 
nkembo na Yo. 
 17 Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona 
mpe akomonana kati na nkembo na Ye. 
 18 Akoyanola libondeli ya bato 
oyo babungisaki biloko, 
mpe akondima mabondeli na bango. 
 19 Tika ete bakoma yango 
mpo na ekeke oyo ekolanda, 
mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe. 
 20 Wuta na Esika na Ye ya bule, 
wuta na likolo, Yawe atalaki biso 
awa na mokili 
 21 mpo na koyoka kolela ya bakangami 
kati na boloko 
mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa. 
 22 Kombo ya Yawe ekokende sango 
kati na Siona, 
mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi 
 23 tango bato mpe bikolo bakosangana 
mpo na kogumbamela Yawe. 
 24 Na bomoi na ngai, abukaki lolendo 
ya makasi na ngai, 
mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai. 
 25 Nalobaki : 
« Nzambe na ngai, 
Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, 
koboma ngai te na kati-kati ya mikolo 
ya bomoi na ngai ! 
 26 Na kala, otiaki miboko ya mokili, 
mpe maboko na Yo esalaki Likolo. 
 27 Bango, bakokufa ; 
kasi Yo, okotikala seko na seko. 
Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ; 
okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa. 
 28 Kasi Yo, ozali ndenge moko, 
mibu na Yo ekotikala kosuka te. 
 29 Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda, 
mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »