Nzembo 93
Yawe akonzaka mpo na libela na libela 
 1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; 
Yawe alati penza lokumu monene 
mpe amizingeli na nguya. 
Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. 
 2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; 
seko na seko, ozali. 
 3 Yawe, bibale egangaka ! 
Bibale etombolaka lokito na yango ; 
bibale etombolaka makelele na yango. 
 4 Yawe azali monene makasi, 
na bisika ya likolo ; 
aleki lokito ya mayi minene, 
mpe bambonge milayi ya ebale monene. 
 5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; 
bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.