Nzembo 47
Bobetela Nzambe maboko 
 1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 
 2 Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! 
Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso. 
 3 Tala ndenge nini Yawe, 
Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! 
Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba. 
 4 Atiaki bikolo na se na biso, 
mpe mabota na se ya bokonzi na biso. 
 5 Aponelaki biso libula na biso, 
oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye. 
 6 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; 
Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo. 
 7 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, 
boyemba mpo na lokumu na Ye. 
Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, 
boyemba mpo na lokumu na Ye. 
 8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; 
boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye. 
 9 Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; 
Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule. 
 10 Bato minene ya bikolo basangani, 
lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, 
pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; 
atombwama makasi.