26
Moto ya zoba 
 1 Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, 
mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, 
ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te. 
 2 Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano 
ekendaka bipai na bipai 
to mbilambila* Mbilambila ezali ndeke ya moke oyo babengaka, na lifalanse : hirondelle. epumbwaka-pumbwaka, 
ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te 
moto oyo asali na ye mabe te. 
 3 Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, 
mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, 
ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba. 
 4 Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye, 
noki te okokokana na ye. 
 5 Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, 
noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko. 
 6 Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba 
azali lokola moto oyo amikati makolo 
mpe amilukeli makambo. 
 7 Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, 
ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te 
kati na monoko ya zoba. 
 8 Kopesa zoba lokumu ezali 
lokola kotia libanga na ebambelo mabanga. 
 9 Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube 
kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga. 
 10 Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala 
azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga. 
 11 Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, 
ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye. 
 12 Eleki malamu kotia elikya na zoba, 
na esika ete otia elikya na moto 
oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko. 
 13 Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela ! 
Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! » 
 14 Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye 
ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango. 
 15 Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, 
kasi akokaka te kozongisa yango na monoko. 
 16 Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya 
koleka bato sambo ya mayele. 
 17 Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te 
azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi. 
 18 Ndenge moto ya liboma abwakaka 
moto, makonga mpe kufa, 
 19 ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na ye 
alobaka : « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki ! » 
 20 Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ; 
soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita. 
 21 Ndenge makala engalaka na mbabola, 
mpe bakoni epelisaka moto, 
ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana 
ayeisaka matata. 
 22 Maloba ya moto ya songisongi ezalaka 
lokola bilei ya kitoko, 
ekitaka na esengo kino na libumu. 
 23 Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe 
ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli 
na mbeki basala na mabele. 
 24 Moto oyo ayinaka moninga na ye 
amibombaka na maloba na ye, 
kasi atondi na lokuta kati na motema na ye. 
 25 Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, 
pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama 
kati na motema na ye. 
 26 Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabe 
na maloba ya lokuta, 
kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebana 
na miso ya bato nyonso. 
 27 Moto oyo atimolaka libulu 
akweyaka ye moko kati na yango ; 
mpe moto oyo atindikaka libanga, 
libanga yango ekozongela kaka ye moko. 
 28 Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, 
mpe maloba ya sukali ememaka libebi.