Naumi  
 1
Kanda mpe bolamu ya Yawe 
 1 Lisakoli na tina na engumba Ninive. 
Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi. 
 2 Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, 
oyo azongisaka mabe na mabe. 
Yawe azongisaka mabe na mabe 
mpe atombokaka makasi. 
Yawe azongisaka mabe na mabe 
epai ya banguna na Ye, 
akangelaka bayini na Ye kanda makasi. 
 3 Yawe asilikaka noki te, 
mpe nguya na Ye ezali monene. 
Yawe atikaka te moto oyo asali mabe 
lokola nde asali na ye mabe te, 
kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. 
Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki* Ekumbaki ezali mopepe ya makasi oyo ekumbaka biloko nyonso tango elekaka., 
kati na mopepe makasi. 
 4 Agangelaka ebale monene 
mpe akawusaka yango, 
akawusaka bibale nyonso. 
Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli 
esili nyonso kokawuka, 
mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka. 
 5 Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, 
mpe bangomba mikuse epanzanaka. 
Mabele, mokili mpe bavandi na yango 
balengaka liboso na Ye. 
 6 Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? 
Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? 
Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, 
bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye. 
 7 Yawe azali malamu, 
azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi 
mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye. 
 8 Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela 
mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili. 
 9 Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ? 
Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ; 
pasi ekoya lisusu te. 
 10 Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, 
lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; 
bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka. 
 11 Ezali kati na yo Ninive nde moto 
oyo azali na mabongisi mabe 
mpo na kotelemela Yawe 
mpe azali na batoli ya mabe abimi. 
 12 Tala liloba oyo Yawe alobi : 
« Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi, 
bakosila kokufa mpe kolimwa. 
Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo, 
nakosala yango lisusu te. 
 13 Nakobuka ekangiseli na bango, 
oyo ezali na kingo na yo 
mpe nakolongola yo na minyololo. » 
 14 Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo : 
« Okotikala kozwa lisusu bakitani te 
oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi. 
Nakolongola kati na tempelo na yo 
banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso 
oyo basala na bibende balekisa na moto. 
Nazali kobongisela yo kunda, 
pamba te ozali na yo pamba. »