2
Mokolo ya Nkolo 
 1 Bobeta kelelo na Siona ! 
Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! 
Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, 
pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; 
solo, ekomi penza pene. 
 2 Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, 
mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. 
Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, 
ndenge wana mpe mampinga moko 
ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. 
Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala 
mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya. 
 3 Liboso na bango, moto ezali kotumba ; 
sima na bango, moto ezali kozikisa. 
Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, 
mpe sima na bango, lokola esobe. 
Solo, ata eloko moko te ekotikala. 
 4 Bazali lokola bampunda ; 
bapumbwaka lokola basoda 
oyo batambolaka likolo ya bampunda. 
 5 Batambolaka likolo ya basonge ya bangomba 
na makelele makasi lokola makelele ya bashar, 
lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika, 
lokola mampinga moko ya basoda ya mpiko 
oyo babongami mpo na kokende na bitumba. 
 6 Soki bamoni bango, 
bato ya bikolo bakomaka na somo 
mpe bilongi nyonso ekawukaka. 
 7 Bakimaka lokola bilombe, 
bapumbwaka bamir lokola basoda ya mpiko, 
batambolaka nzela moko, batengamaka te. 
 8 Batutanaka te bango na bango, 
moko na moko alandaka kaka nzela na ye. 
Badusolaka na kati-kati ya bibundeli ya banguna, 
mpe eloko moko te ekangaka bango nzela. 
 9 Bawelelaka kokota kati na engumba, 
bapotaka mbangu pene ya mir, 
bakotaka na bandako 
ndenge miyibi bakotaka na nzela ya maninisa. 
 10 Mokili eninganaka liboso na bango, 
Lola elengaka, 
moyi mpe sanza eyindaka, 
minzoto etikaka kongenga. 
 11 Yawe azali koganga lokola kake 
na liboso ya mampinga na Ye. 
Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; 
basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. 
Mokolo ya Yawe ezali monene, 
ezali somo makasi ; 
nani akoki kotelema na mokolo yango ? 
Kozonga epai na Yawe 
 12 « Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, 
« bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, 
na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. » 
 13 Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. 
Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, 
pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, 
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, 
abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi. 
 14 Nani ayebi soki akoki 
kobongola makanisi to koyoka mawa 
mpe kotika na sima na Ye lipamboli, 
mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, 
makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ? 
 15 Bobeta kelelo na Siona ! 
Bopanza sango ya mokolo ya bule ya kokila bilei 
mpe bobengisa mayangani ya bule. 
 16 Bosangisa bato, bobulisa mayangani, 
bosangisa bakambi mpe bana, 
ezala oyo bazali nanu komela mabele. 
Tika ete elenge mobali oyo abali sika 
atika shambre na ye ya libala, 
mpe elenge mwasi oyo abali sika 
atika mpe shambre na ye ya libala. 
 17 Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe 
balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. 
Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, 
kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola 
to eloko ya maseki kati na bikolo. 
Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : 
‹ Wapi Nzambe na bango ? › » 
Eyano ya Yawe 
 18 Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye 
mpe akoyokela bato na Ye mawa. 
 19 Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : 
« Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; 
bongo bokotonda yango. 
Nakokomisa bino lisusu te 
eloko ya kotiola kati na bikolo. 
 20 Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, 
nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; 
bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso 
bakozinda na ebale monene ya este ; 
mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. 
Solo na ye ya kopola ekoyokana, 
kobeba na ye ekopanzana. » 
Solo, asali makambo minene. 
 21 Oh mabele, kobanga te, 
zala na esengo mpe sepela, 
pamba te Yawe asali makambo minene. 
 22 Banyama ya zamba, bobanga te, 
pamba te matiti eboti lisusu na elanga, 
banzete eboti lisusu bambuma ; 
banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza. 
 23 Bosepela, bino bato ya Siona, 
bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, 
pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. 
Akonokisela bino bamvula minene 
na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, 
ndenge ezalaki liboso. 
 24 Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, 
banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta. 
 25 Nakozongisela bino mibu 
oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, 
ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki : 
mampinga minene na Ngai oyo natindaki 
mpo na kobundisa bino. 
 26 Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, 
bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, 
oyo asaleli bino makambo ya kokamwa : 
bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te. 
 27 Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele, 
ete nazali Yawe, Nzambe na bino, 
mpe ete Nzambe mosusu azali te. 
Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.