31
Mawa na bato oyo batalelaka Ejipito 
 1 Mawa na bato oyo bazali kokende 
na Ejipito mpo na koluka lisungi, 
oyo bazali kotia mitema na bampunda, 
oyo bazali kotia elikya na bashar 
mpo ete ezali ebele, 
mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, 
kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te 
mpe balukaka lisungi epai na Yawe te ! 
 2 Nzokande, Ye mpe azali na bwanya 
mpe akoki koyeisa pasi ; 
abongolaka maloba na Ye te. 
Atelemelaka ndako ya bato mabe 
mpe bato oyo basungaka bango. 
 3 Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, 
bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. 
Tango Yawe akosembola loboko na Ye, 
ye oyo asungaka akobeta libaku, 
mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; 
bongo, bango mibale bakobebisama. 
Ezali Yawe nde Abikisaka 
 4 Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : 
« Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka 
liboso ya mosuni na yango, 
ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani 
mpo na kotelemela yango, 
ezalaka na somo ya makelele na bango te 
mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, 
ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, 
akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke 
mpo na kobunda. 
 5 Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, 
ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, 
akobatela Yelusalemi, 
akobatela mpe akokangola, 
akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. » 
 6 Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !  7 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu. 
 8 « Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga 
ya moto ya mokili oyo te, 
ekobebisama na mopanga ya moto te. 
Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, 
mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma 
kosala misala ya makasi. 
 9 Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; 
mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » 
elobi Yawe 
oyo moto na Ye ezali kati na Siona 
mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.