14
Kobongola motema ememaka lipamboli 
 1 Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu 
mpo na mabe na bango, 
pamba te batombokeli Nzambe na bango. 
Bato bakokufa na mopanga ; 
bakonyata-nyata babebe na bango, 
bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi. 
 2 Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, 
pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo. 
 3 Bobongisa maloba na bino 
mpe bozonga epai na Yawe ; 
boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, 
yamba biso na mawa na Yo 
mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, 
na esika ya bangombe. 
 4 Asiri akokoka kobikisa biso te ; 
tokomata na mpunda ya bitumba te 
mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : 
‹ Bozali banzambe na biso, › 
pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. » 
 5 Nakobikisa bango na mabe na bango 
mpe nakolinga bango na motema moko, 
pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango. 
 6 Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ; 
akobimisa fololo lokola lisi, 
akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani. 
 7 Bitape na ye ekokende mosika, 
akozala na lokumu lokola nzete ya olive, 
mpe malasi na ye ekozala lokola 
malasi ya nzete ya sedele ya Libani. 
 8 Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, 
bakokola malamu lokola ble, 
bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani. 
 9 Efrayimi akoloba : 
« Banzambe ya bikeko ezali lisusu 
na tina nini epai na Ngai ? » 
Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. 
Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, 
Ngai nde nasalaka ete obota mbuma. 
 10 Nani azali na bwanya 
mpo na kososola makambo oyo ? 
Nani azali na mayele mingi 
mpo na koyeba yango ? 
Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima : 
bato ya sembo bakolanda yango, 
kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.